Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 117
Masanzoli ya bikolo nyonso
Bino bato ya bikolo nyonso,
bokumisa Yawe !
Bino bato ya mabota nyonso,
bopesa Ye nkembo !
Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene,
mpe bosembo ya Yawe ewumelaka
seko na seko.
Bokumisa Yawe !
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.