Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 116
Yawe ayokaka ngai
Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka
mongongo mpe mabondeli na ngai.
Ayokaki ngai ;
boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
Minyololo ya kufa ezingelaki ngai,
somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ;
nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.
Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe :
« Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »
Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo,
Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.
Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele.
Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
Molimo na ngai, zongela kimia na yo,
pamba te Yawe asaleli yo bolamu.
Solo, okangoli ngai na kufa,
okawusi mpinzoli na ngai
mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
Nakotambola liboso ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka :
« Nazali moto na pasi makasi. »
Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela :
« Bato nyonso bazali bakosi. »
Nini nakoki kozongisela Yawe
mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai ?
Nakotombola kopo ya elonga
mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe
na miso ya bato na Ye nyonso.
Kufa ya bayengebene ya Yawe
ezali na motuya makasi na miso na Ye.
Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo.
Nazali mosali na Yo,
mwana mobali ya mwasi mosali na Yo.
Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
Nakobonzela Yo mbeka
mpo na kozongisa matondi,
mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe
na miso ya bato na Ye nyonso,
kati na lopango ya Tempelo ya Yawe ;
kati na yo, Yelusalemi.
Bokumisa Yawe !
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.