Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 87
Siona, etima ya bikolo nyonso
Nzembo ya bana ya Kore.
Yawe atia moboko ya Siona
na likolo ya bangomba ya bule.
Yawe alingaka bikuke ya Siona
koleka bandako nyonso ya Jakobi.
Oh engumba ya Nzambe,
maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !
Kati na bato oyo bayebi ngai,
natangi Rahavi mpe Babiloni.
Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri
mpe Kushi ebimela.
Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama :
« Bato nyonso babimela awa,
mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo
nde alendisaka yango. »
Tango Yawe akomaki
kati na buku ya bikolo,
akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango :
« Moto songolo abotama kati na Siona ! »
Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka :
« Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.