Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 85

Yawe asalelaka biso bolamu

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.

Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu,

ozongisaki bato ya Jakobi,

oyo bazalaki na bowumbu,

olimbisaki mabe ya bato na Yo

mpe olongolaki masumu na bango nyonso.

Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi

mpe okitisaki motema na Yo.

Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso !

Longola kanda na Yo na tina na biso !

Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ?

Okokangela penza biso kanda

mpo na tango nyonso ?

Okozongisela biso lisusu bomoi te

mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?

Yawe, talisa biso bolingo na Yo,

mpe pesa biso lobiko na Yo !

Yawe,

nakoyoka maloba na Nzambe ;

pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye

mpe ya bayengebene na Ye.

Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.

Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato

oyo batosaka Ye

mpo ete nkembo na Ye ewumela

kati na mboka na biso.

Bolingo mpe boyengebene ekutanaka,

bosembo mpe kimia eyambanaka.

Bosolo ebotaka wuta na mabele,

mpe bosembo etalaka wuta na likolo.

Ye moko Yawe akopesa esengo,

mpe mabele na biso ekobota bambuma.

Bosembo etambolaka liboso na Ye

mpe elakisaka nzela oyo ekolekela.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.