Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 80

Eh Yawe, kino tango nini ?

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.

Mobateli ya Isalaele,

Yo oyo otambolisaka Jozefi

lokola etonga ya bameme, yoka ;

Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali

kati na basheribe, mimonisa

liboso ya Efrayimi, ya Benjame

mpe ya Manase.

Monisa nguya na Yo

mpe yaka kobikisa biso !

Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki,

ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

kino tango nini okotombokela

mabondeli ya bato na Yo ?

Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso

mpe olangwisaki bango na kopo

etonda na mpinzoli ;

okomisaki biso eloko ya kotiola

mpo na bazalani na biso,

mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.

Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

sala ete tozongela ndenge tozalaki,

ngengisela biso elongi na Yo

mpo ete tobika.

Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito,

olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.

Obongiselaki yango mabele

mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.

Elili na yango ezipaki bangomba,

bitape na yango ezalaki

lokola banzete minene ya sedele.

Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene,

mpe mito na yango ya sika kino na ebale.

Mpo na nini otoboli madusu

kati na bamir na yango ?

Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka

bambuma na yango !

Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango,

mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.

Zongela biso lisusu,

Nzambe-Na-Nguya-Nyonso !

Wuta na likolo, tala mpe mona !

Senzela mpo na nzete oyo ya vino !

Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki,

batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.

Bakati nzete na Yo ya vino

mpe batumbi yango na moto ;

tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo !

Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi

oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali,

mpe na likolo ya mwana na moto

oyo Yo moko okomisaki makasi.

Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ;

zongisela biso lisusu bomoi,

mpe tokobelela Kombo na Yo.

Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

sala ete tozongela ndenge tozalaki,

ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.