Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 75
Nzambe akosambisa mokili
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te ! » Nzembo ya Azafi.
Nzambe, tozali kosanzola Yo,
tozali kosanzola Kombo na Yo ;
mpo ete Kombo na Yo ezali pene,
bato bazali kotatola bikamwa na Yo.
Olobaki :
« Na tango oyo ngai moko nakobongisa,
nakokata makambo na bosembo.
Mokili ekoki kolenga
elongo na bavandi na yango nyonso,
kasi ezali ngai nde nalendisaka
makonzi na yango. »
Nazali koloba na moto ya lofundu :
« Kotombola lisusu mapeka te ; »
mpe na bato mabe :
« Bosala lisusu lolendo te.
Bomeka lisusu te kosala lofundu
mpe koloba na lolendo. »
Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te,
ewutaka mpe na esobe te.
Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo :
akitisaka moto songolo
mpe atombolaka moto pakala.
Loboko na Yawe esimbi kopo
oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo.
Azali kosopa yango,
mpe bato mabe nyonso ya mokili
bazali komeka mpe komela yango
kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.
Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo
tango nyonso,
nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,
oyo azali koloba :
« Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe ;
kasi nguya ya bato ya sembo
ekomata lisusu makasi. »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.