Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 70
Nzambe, yaka kosunga ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.
Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai !
Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !
Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai
bakufa soni mpe basambwa !
Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai
bazonga sima mpe bayokisama soni !
Tika ete bato oyo balobaka na ngai :
« Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !
Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo
batonda na esengo mpe basepela kati na Yo !
Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo
balobaka tango nyonso :
« Nzambe azali monene ! »
Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela,
Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai.
Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai,
kowumela te !
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.