Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 67
Tika ete bikolo nyonso ekumisa Nzambe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.
Tika ete Nzambe asalela biso ngolu
mpe apambola biso,
tika ete angengisela biso elongi na Ye ;
mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,
mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;
tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
Tika ete bato basepela,
tika ete babeta milolo ya esengo,
pamba te okambaka bikolo na bosembo,
mpe otambolisaka bato awa na mabele.
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;
tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
Mabele eboti bambuma na yango ;
tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
Tika ete Nzambe apambola biso ;
tika ete mokili mobimba etosa Ye !
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.