Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 65

Opesaka bofuluki

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Mpo na Yo Nzambe,

bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ;

mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.

Yo oyo oyokaka mabondeli,

bato nyonso bakoya epai na Yo.

Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ;

kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.

Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi

mpo ete avanda kati na lopango na Yo.

Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo,

Tempelo na Yo ya bule.

Nzambe Mobikisi na biso,

oyanolaka biso na bosembo,

na nzela ya biloko ya somo ;

Ozali elikya ya mokili mobimba

mpe ya bibale minene.

Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ;

atondi na mpiko.

Akitisaka makelele ya bibale minene,

makelele ya bambonge na yango

mpe makelele ya bikolo.

Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili

babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ;

osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.

Opambolaka mabele, ofulukisaka yango,

otondisaka yango na bozwi.

Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi,

obongiselaka bato ble,

pamba te otondisaka mayi mpo na yango.

Olekisaka mayi kati na mikala,

okweyisaka mipiku ya mabele,

osopelaka mabele mayi

mpe opambolaka milona.

Opambolaka mobu na bolamu na Yo,

mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.

Bilanga ya esobe etondaka na bilei,

mpe bangomba mike etondaka na esengo.

Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ;

mabwaku etondaka na ble,

egangaka na esengo mpe eyembaka.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.