Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 47

Bobetela Nzambe maboko

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko !

Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.

Tala ndenge nini Yawe,

Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo !

Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.

Atiaki bikolo na se na biso,

mpe mabota na se ya bokonzi na biso.

Aponelaki biso libula na biso,

oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.

Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ;

Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.

Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe,

boyemba mpo na lokumu na Ye.

Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso,

boyemba mpo na lokumu na Ye.

Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ;

boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

Nzambe akonzaka bikolo nyonso ;

Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.

Bato minene ya bikolo basangani,

lokola bato ya Nzambe ya Abrayami,

pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ;

atombwama makasi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.