Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 43

Kotia elikya kati na Yawe

Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai

liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ;

kangola ngai wuta na maboko

ya bakosi mpe ya bato mabe.

Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai,

oyo batonga makasi ;

mpo na nini osundoli ngai ?

Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye,

na se ya minyoko ya monguna ?

Tinda mwinda mpe solo na Yo

mpo ete ekamba mpe emema ngai

na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;

bongo nakokende na etumbelo

epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai.

Oh Yawe, Nzambe na ngai,

nakosanzola Yo na lindanda.

Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?

Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?

Tia elikya na yo kati na Nzambe,

pamba te nakosanzola Ye lisusu,

Mobikisi mpe Nzambe na ngai.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.