Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 32

Bolimbisi epesaka esengo

Nzembo ya Davidi.

Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,

mpe masumu na ye elongwe !

Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te,

mpe atambolaka na lokuta te.

Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te,

nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.

Butu mpe moyi,

loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ;

makasi na ngai ekomaki kosila

ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.

Tango nandimaki masumu na ngai

mpe nabombaki mabe na ngai te,

nalobaki : « Nakotubela

masumu na ngai liboso ya Yawe. »

Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.

Boye, tika ete bayengebene nyonso

basambelaka Yo na tango ya malamu !

Soki mayi minene etomboki,

bambonge na yango ekozwa bango te.

Ozali ebombamelo na ngai ;

obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te

mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.

Olobaki : « Nakopesa yo malako

mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;

nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli,

oyo bakangaka nguya na yango

na nzela ya ebende mpe ya singa

oyo batiaka na minoko na yango

mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »

Bato mabe bazali na pasi mingi,

kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato

oyo batiaka elikya na Yawe.

Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe,

bozala na esengo !

Bino nyonso oyo bozali na mitema alima,

bobeta milolo ya esengo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.