Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 29
Mongongo ya Yawe
Nzembo ya Davidi.
Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe,
bopesa Yawe nkembo mpe makasi.
Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ;
bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.
Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi,
Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito,
Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
Mongongo ya Yawe ezali na nguya ;
mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ;
Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.
Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe,
apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.
Mongongo ya Yawe ebimaka
elongo na bakake ya moto.
Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ;
Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.
Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota,
esalaka mpe ete zamba etikala pamba.
Kati na Tempelo ya Yawe,
nyonso egangaka : « Nkembo ! »
Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi
na likolo ya mpela ;
Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi
lokola Mokonzi mpo na libela.
Yawe apesaka bato na Ye makasi ;
Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.