Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 19

Bimoniseli mibale ya Nzambe

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe,

mapata elobaka misala na Ye.

Mokolo moko na moko eyebisaka yango

epai ya mokolo oyo elandaka,

mpe butu moko na moko eyebisaka yango

epai ya butu oyo elandaka.

Ezali na nzela ya lisolo te,

na nzela mpe ya maloba te

oyo mingongo na yango eyokanaka te.

Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba,

maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili.

Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.

Moyi yango ebimaka na tongo

ndenge elenge mobali oyo abali sika

abimaka na shambre na ye,

mpe ndenge elombe atambolaka

na elikya ya kolonga na momekano.

Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo,

mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ;

eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.

Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka,

epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi.

Maloba na Ye nyonso ezali ya solo,

ebongi na kotiela yango elikya,

mpe epesaka bwanya epai ya zoba.

Mitindo ya Yawe ezali alima,

esepelisaka motema ;

malako na Ye ezali peto,

epesaka bososoli.

Kotosa Yawe ezali peto,

ewumelaka libela na libela.

Mitindo ya Yawe ezali ya solo,

nyonso ezali penza sembo.

Ezali na motuya koleka wolo,

koleka wolo ebele ya peto,

wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ;

eleki mafuta ya nzoyi na elengi,

mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.

Epesaka mosali na Yo mayele ;

moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.

Nani akoki kososola mabunga na ye

oyo asali na nko te ?

Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !

Batela lisusu mosali na Yo

mpo ete nasala mabe na nko te.

Na bongo, nakozala moto ya kokoka

mpe nakosala bambeba minene te.

Yawe, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai,

tika ete maloba mpe makanisi ya motema na ngai

esepelisa Yo !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.