Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 146

Nzambe alongisaka banyokolami

Bokumisa Yawe !

Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !

Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba,

nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso

nakozala na bomoi.

Botia elikya te na bakambi

to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.

Soki bakufi, bazongaka na mabele,

mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.

Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye,

oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !

Yawe akelaki Likolo mpe mabele,

ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;

azali sembo seko na seko.

Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami

mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ;

abimisaka bakangami na boloko.

Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ;

Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ;

Yawe alingaka bato ya sembo.

Yawe abatelaka bapaya,

asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali,

kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

Yawe azali Mokonzi seko na seko ;

Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela !

Bokumisa Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.