Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 133
Tango bandeko basangani
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko
mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Ezali lokola malasi ya motuya
oyo basopi na moto,
bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,
ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
Ezali lokola mamwe ya Erimoni,
oyo ekitaka na bangomba ya Siona.
Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,
mpe bomoi, mpo na libela.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.