Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Banzembo 119
Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka
Esengo na bato oyo bazangi pamela
mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !
Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye
mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba !
Basalaka mabe te,
kasi balandaka banzela ya Nzambe.
Opesaki mibeko
mpo ete etosama malamu.
Tika ete nabongisa etamboli na ngai
mpo ete natosa mitindo na Yo !
Na bongo, nakoyoka soni te
tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
Nakosanzola Yo na motema ya sembo
wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.
Nalingi kotosa mitindo na Yo ;
kosundola ngai libela te !
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai
mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
Yawe, tika ete opambolama !
Lakisa ngai mitindo na Yo !
Na monoko na ngai, natangaka
mibeko na Yo nyonso.
Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo
lokola nde nazali na bomengo nyonso.
Nakanisaka malako na Yo
mpe natambolaka na banzela na Yo.
Nasepelaka mingi na malako na Yo
mpe nabosanaka liloba na Yo te.
Salela ngai, mosali na Yo, bolamu
mpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo.
Fungola miso na ngai
mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.
Nazali mopaya awa na mokili ;
kobombela ngai mibeko na Yo te.
Molimo na ngai ezalaka tango nyonso
na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.
Otelemelaka bato ya lofundu,
bato oyo balakelama mabe
mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.
Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai,
pamba te natosaka malako na Yo.
Ezala soki bakambi basali likita
mpe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo,
nakokanisa kaka mitindo na Yo.
Malako na Yo esepelisaka ngai makasi,
epesaka ngai toli.
Nakangami na putulu ;
batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
Nayebisaki Yo banzela na ngai,
mpe oyanolaki ngai ;
lakisa ngai mibeko na Yo !
Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo
mpo ete nakanisa misala minene na Yo !
Nazali kolela mpo na pasi na motema ;
pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.
Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ;
mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.
Naponaki nzela ya bosolo ;
natambolaka kolanda mibeko na Yo.
Nakangami na malako na Yo ;
Yawe, koyokisa ngai soni te.
Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo,
pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yo
mpo ete nabatela yango kino na suka.
Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yo
mpe nalanda yango na motema na ngai mobimba.
Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo,
pamba te nasepelaka na yango.
Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo,
kasi na bomengo te !
Longola miso na ngai na makambo ya pamba,
batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !
Kokisela mosali na Yo bilaka
oyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.
Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka,
pamba te mibeko na Yo ezali malamu.
Nasepelaka makasi na mibeko na Yo ;
batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo !
Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai,
mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo ;
bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesa
na mofingi na ngai,
pamba te natiaka elikya na liloba na Yo.
Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo,
pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo.
Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso,
mpe libela na libela.
Nakobika na bonsomi ya solo,
pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.
Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi
na kozanga koyoka soni.
Nasepelaka mingi na mibeko na Yo
mpe nalingaka yango mingi.
Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo,
oyo nalingaka,
mpe nakokanisa mitindo na Yo.
Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo,
pamba te opesaki ngai elikya.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;
batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ;
kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.
Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala,
nazwaka kati na yango kobondisama.
Nayokaka pasi mingi na motema
tango namonaka bato mabe
kosundola mibeko na Yo.
Nakoma koyemba mitindo na Yo
na bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.
Yawe, nakanisaka Yo na butu
mpo ete nabatela mibeko na Yo ;
pamba te libula na ngai ezali :
kotosa mibeko na Yo.
Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali :
kotosa liloba na Yo.
Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ;
salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo !
Natali malamu etamboli na ngai
mpe namizongisi kati na malako na Yo.
Natosaka mibeko na Yo noki,
nazelisaka te.
Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai,
kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo.
Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yo
likolo na mibeko na Yo ya sembo.
Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo
mpe babatelaka mitindo na Yo.
Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo ;
lakisa ngai mitindo na Yo !
Yawe, salela mosali na Yo bolamu
kolanda liloba na Yo.
Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele,
pamba te namipesaka na mibeko na Yo.
Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ;
kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ;
teya ngai mitindo na Yo !
Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo ;
kasi ngai, natosaka mitindo na Yo
na motema na ngai mobimba.
Mitema na bango ezali mabanga ;
kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.
Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai,
mpo ete nayekola mitindo na Yo.
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki
na monoko na Yo ezali malamu
koleka biloko nkoto moko
ya wolo mpe ya palata.
Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo,
pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo !
Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai,
basepelaka makasi,
mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo.
Yawe, nayebi malamu
ete mibeko na Yo ezali sembo,
mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo
nde obetaki ngai.
Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai,
kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo !
Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika,
pamba te nasepelaka na mibeko na Yo.
Tika ete bato wana ya lofundu,
oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni !
Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo.
Tika ete bato oyo batosaka Yo,
ba-oyo bayebi malako na Yo,
bazongela ngai.
Tika ete motema na ngai ezanga pamela
mpo na kotosa mitindo na Yo,
mpo ete nakufa soni te.
Natondi na posa ya lobiko na Yo,
nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Miso na ngai elembi kozela
kokokisama ya elaka na Yo ;
nakomi komituna :
« Okobondisa ngai tango nini ? »
Nakomi lokola mbeki
oyo ezali kokawuka na milinga,
nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.
Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo
ezali motango boni ?
Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ?
Bato ya lolendo batimoli mabulu
mpo na kokanga ngai,
baboyi kotosa mibeko na Yo.
Mibeko na Yo nyonso ezali sembo ;
kasi bazali konyokola ngai kaka pamba ;
yaka kosunga ngai !
Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ;
kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.
Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngai
mpo ete natosa malako na Yo.
Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko,
epikama kati na likolo ;
boyengebene na Yo ekowumela seko na seko.
Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo ;
opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo,
pamba te nyonso kati na mokili mobimba
epesaka Yo lokumu.
Soki nasepelaki na mibeko na Yo te,
mbele nakufa kala kati na pasi na ngai.
Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo,
pamba te obatelaka bomoi na ngai
na nzela na yango.
Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo
mpe natosaka mitindo na Yo !
Bato mabe bazali koluka koboma ngai,
kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.
Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka,
namonaki mondelo ;
kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.
Nalingaka mibeko na Yo mingi !
Nakanisaka yango mikolo nyonso.
Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya
koleka banguna na ngai ;
ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele,
pamba te nakanisaka malako na Yo.
Naleki mibange na bososoli,
pamba te natosaka mibeko na Yo.
Natambolaka te na banzela nyonso ya mabe
mpo na kotosa liloba na Yo.
Nakangamaka na mibeko na Yo,
pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi
na monoko na ngai !
Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli ;
yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango :
« Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »
Motema na ngai etutami makasi ;
Yawe, batela bomoi na ngai
kolanda liloba na Yo.
Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai,
mpe teya ngai mibeko na Yo.
Solo, nakutanaka tango nyonso na makama,
kasi nabosanaka mibeko na Yo te.
Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya,
kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.
Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela,
esalaka esengo ya motema na ngai.
Nazwa mokano ya kotambola
kolanda mitindo na Yo,
tango nyonso, kino na suka.
Nayinaka bato ya mitema mibale,
kasi nalingaka nde mibeko na Yo.
Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ;
natiaka elikya kati na liloba na Yo.
Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai !
Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !
Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika ;
koyokisa elikya na ngai soni te.
Sunga ngai mpo ete nabika ;
nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te.
Obwakaka bato nyonso oyo bapesaka
mitindo na Yo mokongo,
pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.
Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokili
lokola bosoto ;
yango wana nalingaka malako na Yo.
Nalengaka na somo liboso na Yo
mpe nabangaka mikano na Yo.
Natambolaka na bosembo mpe bosolo ;
kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te !
Kamata mokumba ya bolamu na ngai,
mosali na Yo ;
tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.
Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo
mpe kokokisama ya bosembo na Yo
kolanda elaka na Yo.
Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo,
lakisa ngai mitindo na Yo.
Nazali mosali na Yo ; pesa ngai mayele
mpo ete nasosola malako na Yo.
Yawe, tango ya kosala ekoki ;
pamba te bazali kobuka mibeko na Yo !
Yango wana nalingaka mibeko na Yo
koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;
namonaka mpe malako na Yo nyonso alima ;
nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
Malako na Yo ezali kitoko,
yango wana nabatelaka yango.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,
epesaka bazoba mayele.
Monoko na ngai efungwamaka makasi
likolo ya kozela,
pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.
Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo
kolanda ndenge okata mpo na bato
oyo balingaka Kombo na Yo.
Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo
mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.
Kangola ngai wuta na minyoko ya bato,
mpe nakotosa mibeko na Yo.
Tika ete elongi na Yo engengela ngai,
mosali na Yo ;
lakisa ngai mibeko na Yo !
Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli,
pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.
Yawe, ozali sembo,
mpe mibeko na Yo ezali alima ;
osalaki malako na Yo
na bosembo mpe na bolingo.
Mpo ete banguna na ngai bazwaka
liloba na Yo na motuya te,
nayokaka kanda makasi komata ngai na motema.
Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ;
mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.
Atako nazali moke mpe batiolaka ngai,
kasi nabosanaka mitindo na Yo te.
Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela,
ekotikala kobongwana te ;
mpe mibeko na Yo ezali solo.
Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai ;
kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ;
pesa ngai bososoli mpo ete nabika !
Nazali kobelela Yo
na motema na ngai mobimba :
« Yawe, yanola ngai ;
nakotosa mitindo na Yo !
Nazali kobelela Yo : bikisa ngai,
mpo ete natosa malako na Yo !
Nalamukaka liboso ete tongo etana
mpo na kobelela Yo,
nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Nalamukaka na kati-kati ya butu
mpo na kokanisa mitindo na Yo.
Yoka ngai na bolingo na Yo !
Yawe, batela bomoi na ngai
kolanda mibeko na Yo !
Bato oyo basalaka mabongisi mabe,
oyo batosaka mibeko na Yo te,
bazali koya pene na ngai.
Nzokande Yo, Yawe, ozali pene,
mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.
Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo,
ete otia mibeko yango mpo na libela.
Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai,
pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.
Kota likambo na ngai mpe kangola ngai,
batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo !
Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe,
pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo.
Yawe, mawa na Yo ezali monene penza ;
batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo.
Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele,
kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.
Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima,
ba-oyo batosaka liloba na Yo te.
Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo !
Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo.
Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo,
mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali
mpo na libela.
Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba,
kasi kaka liloba na Yo nde ebangisaka
motema na ngai.
Nasepelaka na liloba na Yo
lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.
Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele,
nalingaka nde mibeko na Yo.
Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo
mpo na mibeko ya bosembo na Yo.
Bato oyo balingaka mibeko na Yo
bazali bato na kimia monene,
mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.
Yawe, natielaka Yo motema
mpo ete obikisa ngai,
mpe natosaka mibeko na Yo.
Natosaka malako na Yo,
pamba te nalingaka yango makasi.
Natosaka malako mpe mibeko na Yo,
pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.
Yawe, tika ete koganga na ngai ekoma
kino epai na Yo !
Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo !
Tika ete mabondeli na ngai ekoma
kino epai na Yo !
Kangola ngai kolanda elaka na Yo.
Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo,
pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo !
Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo,
pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.
Tika ete loboko na Yo esunga ngai,
pamba te napona kolanda malako na Yo.
Yawe, nazali na posa makasi
ya lobiko na Yo ;
mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo,
mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai !
Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ;
luka ngai, mosali na Yo,
pamba te nabosani mibeko na Yo te. »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.