Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 110

Mokonzi mpe Nganga-Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai :

« Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali

kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »

Wuta na Siona, Yawe akosala

ete nguya na yo ya bokonzi ekende mosika,

mpe okokonza kati na banguna na Yo.

Na mokolo oyo okotanda basoda na yo

na molongo mpo na bitumba,

bato na yo bakotonda na mpiko,

bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu

epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.

Yawe alapaki ndayi oyo,

akobongola maloba na Ye te :

« Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela

kolanda molongo ya Melishisedeki ! »

Nkolo azali na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na Ye.

Akopesa bikolo etumbu :

bikolo nyonso ekotonda na bibembe,

mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.

Na nzela, mokonzi amelaka mayi na mwa moluka ;

yango wana atombolaka moto.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.