Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Joeli 3

Tango Yawe akosopa Molimo na Ye

Sima na makambo oyo,

nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.

Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola,

mibange na bino bakolota bandoto,

bilenge na bino bakozwa bimoniseli.

Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi,

nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.

Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa,

na likolo mpe na mokili :

makila, moto mpe makonzi ya milinga.

Moyi ekobongwana molili,

mpe sanza ekobongwana makila,

liboso ete mokolo ya Yawe ekoma,

mokolo oyo ya monene mpe ya somo.

Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ;

pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi,

ekozala na bato oyo bakobika,

kolanda ndenge Yawe alobaki,

mpe bato oyo Yawe akobenga

bakozala kati na bato oyo bakobika.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.