Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Yobo 37
Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga
mpe ezali kobeta makasi
lokola nde elingi kobima na esika na yango.
Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye,
makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.
Azali kotinda yango na mokili mobimba,
mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.
Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana,
akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ;
akokanga mikalikali ya monoko na Ye te,
wana mongongo na Ye ezali koyokana.
Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi,
Nzambe asalaka bikamwa,
asalaka makambo minene,
makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.
Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. ›
Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. ›
Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso
mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye.
Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.
Banyama ezongaka na bandako na yango
mpe evandaka kati na libulu na yango.
Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude,
malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.
Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe,
mayi ebongwanaka libanga
mpe bitima ya mayi ekondaka.
Atondisaka mapata na mayi,
mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.
Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso
mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.
Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili
to mpo na kopambola yango.
Yoka, Yobo !
Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.
Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata,
mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ?
Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ?
Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.
Bilamba na yo ezali na moto,
nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.
Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda
likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi
lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ?
Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ;
tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.
Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba ?
Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango ?
Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole ;
ebombami kati na mapata.
Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.
Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor.
Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.
Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
tokoki te kokoma esika Ye azali ;
azali monene na nguya mpe na solo ;
azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.
Yango wana bato basengeli kokumisa Ye,
kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato
oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.