Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Yobo 17
Pema na ngai ekomi pene ya kosila,
mikolo na ngai etikali ya kotanga,
kunda ezali kozela ngai.
Solo, batioli bazingeli ngai,
miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga,
na esika na ngai, epai na Yo ;
soki te, nani mosusu akoki komipesa
lokola ndanga mpo na ngai !
Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ;
yango wana, okolongisa bango te.
Moto oyo akofunda balingami na ye
mpo ete babotola bomengo na bango na makasi,
bana na ye bakokufa miso.
Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato,
lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi,
mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango,
mpe moto oyo ayebi na ye likambo te
atelemeli moto mabe.
Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango,
mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu !
Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ;
mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai,
nyonso, esili kobeba.
Bato oyo bazali komona butu lokola moyi
bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, ›
nzokande molili ezali makasi.
Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya,
ezali nde kunda ;
soki mpe nakotandaka mbeto na ngai,
ezali nde kati na mboka ya bakufi.
Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, ›
mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai
to ndeko na ngai ya mwasi, ›
wana elikya na ngai ezali penza wapi,
mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?
Ekokita kino na bikuke ya kufa
tango tokokende elongo kopema kati na putulu. »
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.