Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Yobo 11

Maloba ya Tsofari

Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :

« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ?

Moto oyo azali koloba alonga na ye,

kaka mpo ayebi koloba ?

Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba

oyo ozali kobimisa ?

Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?

Ozali koloba na Nzambe :

‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ;

nazali sembo na miso na Yo. ›

Oh, tala ndenge nini nazali na posa

ete Nzambe aloba,

ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,

mpe asosolisa yo basekele ya bwanya,

pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale.

Yeba likambo oyo :

Nzambe abosana masumu na yo ebele.

Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ?

Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?

Bandelo yango eleki Lola na likolo ;

yo penza okosala nini ?

Eleki mboka ya bakufi na bozindo ;

yo penza okoyeba nini ?

Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi,

mpe eleki ebale monene na kopanzana.

Soki akotisi yo na boloko

mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo,

nani akotelemela Ye ?

Solo, ayebaka bakosi

mpe asosolaka mabe na pete.

Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te,

ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.

Nzokande, soki opesi Ye motema na yo

mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,

soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo

mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,

okotombola elongi na yo na soni te,

okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ;

pamba te okobosana pasi na yo,

okokoma kokanisa yango kaka

lokola mayi oyo esili kotiola.

Bomoi na yo ekongenga

lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi,

mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.

Okozala na kimia, pamba te elikya ezali,

okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,

okolala pongi, mpe okomona moto moko te

kobangisa yo lisusu,

mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.

Kasi miso ya bato mabe ekokufa,

mpe bakozanga ekimelo,

bakotikala na elikya se moko : kufa. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.