Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Ezayi 4
Na mokolo wana,
basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba :
« Tokomileisa biso moko
mpe tokomilatisa biso moko ;
yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo !
Longola soni na biso ! »
Nkembo ya Yelusalemi ekoya
Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki. Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi. Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto. Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango. Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.