Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 39

Ezekiasi ayambi bantoma kowuta na Babiloni

Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki. Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango. Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye :

— Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ?

Ezekiasi azongisaki :

— Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.

Ezayi atunaki :

— Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ?

Ezekiasi azongisaki :

— Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango. Ezayi alobaki na Ezekiasi :

— Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe. « Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »

Ezekiasi azongiselaki Ezayi :

— Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu.

Pamba te azalaki komilobela : « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.