Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Oze 6
Kobongola motema ya lokuta
Boya, tozonga epai na Yawe !
Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ;
azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.
Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ;
na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu
mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ;
ndenge tongo etanaka solo,
ndenge wana mpe akomonana :
akoya epai na biso lokola mvula,
lokola mvula oyo enokaka na pwasa
mpe epolisaka mabele.
Efrayimi, nasala yo lisusu nini ?
Yuda, nasala yo lisusu nini ?
Bolingo na bino mpo na Ngai ezali
lokola londende ya tongo,
lokola mamwe oyo elimwaka noki.
Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai,
nazali kokata-kata bino na biteni ;
na maloba ya monoko na Ngai,
nazali koboma bino,
mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka,
mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
Ndenge kaka Adamu asalaki,
bango mpe babukaki boyokani na Ngai ;
kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.
Galadi ezali engumba ya bato mabe,
etonda na bilembo ya makila.
Ndenge babomi babombamaka
mpo na koluka kosala bato mabe,
ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka :
babomaka bato na nzela ya Sishemi ;
ezali likambo ya somo penza !
Kati na libota ya Isalaele,
namonaki makambo ya somo makasi :
Efrayimi amipesaki na kindumba,
mpe Isalaele akomaki mbindo.
Yo mpe lisusu, Yuda,
tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo,
sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.