Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Oze 14

Kobongola motema ememaka lipamboli

Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu

mpo na mabe na bango,

pamba te batombokeli Nzambe na bango.

Bato bakokufa na mopanga ;

bakonyata-nyata babebe na bango,

bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo,

pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.

Bobongisa maloba na bino

mpe bozonga epai na Yawe ;

boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso,

yamba biso na mawa na Yo

mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso,

na esika ya bangombe.

Asiri akokoka kobikisa biso te ;

tokomata na mpunda ya bitumba te

mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso :

‹ Bozali banzambe na biso, ›

pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »

Nakobikisa bango na mabe na bango

mpe nakolinga bango na motema moko,

pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.

Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ;

akobimisa fololo lokola lisi,

akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.

Bitape na ye ekokende mosika,

akozala na lokumu lokola nzete ya olive,

mpe malasi na ye ekozala lokola

malasi ya nzete ya sedele ya Libani.

Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye,

bakokola malamu lokola ble,

bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.

Efrayimi akoloba :

« Banzambe ya bikeko ezali lisusu

na tina nini epai na Ngai ? »

Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye.

Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu,

Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.

Nani azali na bwanya

mpo na kososola makambo oyo ?

Nani azali na mayele mingi

mpo na koyeba yango ?

Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima :

bato ya sembo bakolanda yango,

kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.