Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezekieli 15

Lisese ya nzete ya vino

Yawe alobaki na ngai :

« Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini ? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini ? Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza ? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo ? Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango ; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga ? Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango ? Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi. Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu : Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.