Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

2 Yoane 1

Ebandeli ya mokanda

Ngai mpaka ;

Epai ya mwasi moponami ya Nzambe,

mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.

Tolingaka bino mpo na solo oyo ezali kati na biso mpe ekozalaka elongo na biso tango nyonso.

Ngolu, boboto mpe kimia kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana ya Tata, ekozala elongo na biso kati na solo mpe bolingo.

Mobeko ya bolingo

Nazalaki na esengo makasi ya komona ndambo ya bana na yo kotambola kati na solo, kolanda mobeko oyo tozwaki kowuta na Tata. Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso. Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka : kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.

Kokangama na mateya ya Klisto

Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela ; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.

Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka. Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.

Soki moto moko ayei epai na bino mpe amemeli bino mateya mosusu, boyamba ye te kati na bandako na bino, mpe bopesa ye ata mbote te, pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.

Makanisi ya kotala bino

Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.

Mbote ya suka

Bana ya ndeko na yo ya mwasi, moponami ya Nzambe, batindeli yo mbote.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.