Skip to content
BibleKenya

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Banzembo 6

Yawe, Mosungi na ngai

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo,

kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.

Yawe, yokela ngai mawa,

pamba te nazangi makasi.

Yawe, bikisa ngai na bokono,

pamba te mikuwa na ngai elembi.

Molimo na ngai ezali kotungisama makasi ;

bongo Yo, Yawe, kino tango nini ?

Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai,

bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.

Pamba te bakufi bakoki lisusu te

kotatola Kombo na Yo te !

Mpe kati na mboka ya bakufi,

nani akoki kokumisa Yo ?

Kolela elembisi ngai nzoto.

Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai,

mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.

Miso na ngai ebebi mpo na mawa ;

ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.

Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai,

pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.

Yawe ayanoli mabondeli na ngai

mpe ayambi losambo na ngai.

Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni,

mpe somo monene ekokanga bango ;

bakozonga na sima

mpe bakoyoka mbala moko soni.

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020. Copyright © Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. Source: Open.Bible. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-11-09.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.