Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Jozue 12
Molongo ya bakonzi oyo Isalaele alongaki
Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni.
Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
Tala bakonzi yango :
mokonzi ya Jeriko
moko
mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli
moko
mokonzi ya Yelusalemi
moko
mokonzi ya Ebron
moko
mokonzi ya Yarimuti
moko
mokonzi ya Lakishi
moko
mokonzi ya Egiloni
moko
mokonzi ya Gezeri
moko
mokonzi ya Debiri
moko
mokonzi ya Gederi
moko
mokonzi ya Orima
moko
mokonzi ya Aradi
moko
mokonzi ya Libina
moko
mokonzi ya Adulami
moko
mokonzi ya Makeda
moko
mokonzi ya Beteli
moko
mokonzi ya Tapua
moko
mokonzi ya Eferi
moko
mokonzi ya Afeki
moko
mokonzi ya Lasharoni
moko
mokonzi ya Madoni
moko
mokonzi ya Atsori
moko
mokonzi ya Shimironi-Meroni
moko
mokonzi ya Akishafi
moko
mokonzi ya Taanaki
moko
mokonzi ya Megido
moko
mokonzi ya Kedeshi
moko
mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli
moko
mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori
moko
mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali
moko
mokonzi ya Tiritsa
moko.
Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.