Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 62

Mpo na likambo ya Siona,

nakokanga monoko na Ngai te ;

mpo na likambo ya Yelusalemi,

nakovanda kimia te,

kino bosembo na ye emonana

lokola kongenga ya pole,

mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.

Bongo bikolo ekomona bosembo na yo,

mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.

Bakobenga yo na kombo ya sika

oyo monoko na Yawe ekopesa.

Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe

mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.

Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola,

bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ;

kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, »

mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, »

pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo,

mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.

Lokola elenge mobali abalaka moseka,

bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ;

lokola elenge mobali asepelaka

na mobandami na ye ya mwasi,

Nzambe na yo mpe akosepela na yo.

Oh Yelusalemi,

natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ;

bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu.

Bino bato oyo bosalaka ete

Yawe akanisa lisusu Yelusalemi,

bovanda kimia te ;

mpe botikela Ye te tango ya kopema

kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi

mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !

Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali,

loboko na Ye ya nguya,

mpe alapi ndayi :

« Nakopesa lisusu ble na yo te

lokola bilei epai ya banguna na yo ;

bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika

oyo omonelaki pasi ;

kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango

mpe bakokumisa Yawe,

mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango

kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »

Boleka, boleka na bikuke !

Bobongisela bato nzela,

bopasola nzela, bopasola nzela ya monene !

Bolongola mabanga,

botombola bendele liboso na bato ya bikolo.

Tala makambo oyo Yawe atatoli

kino na basuka ya mabele :

« Boloba na Siona, mboka kitoko :

‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya !

Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye,

mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »

Bakobenga bango Libota mosantu,

basikolami na Yawe ;

mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka,

engumba oyo basundola te.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.