Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 61

Mobu ya ngolu na Yawe mpo na Siona

Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,

pamba te Yawe apakoli ngai mafuta

mpo na kosakola sango malamu epai ya babola,

kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,

kosakola bonsomi epai ya bawumbu

mpe kobimisa bakangami na boloko ;

mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu,

kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe,

kobondisa bato oyo bazali kolela,

komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga

mitole na esika ya putulu,

mafuta ya esengo na esika ya matanga,

mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami.

Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe,

mpo na komonisa nkembo na Ye.

Bakotonga lisusu bisika

oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala,

bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ;

bakokomisa sika bingumba oyo ekweya,

oyo ebeba wuta bileko ya kala.

Bapaya bakoleisa bibwele na yo,

bana ya bapaya bakosalela yo bilanga

mpe bakolonela yo bilanga ya vino.

Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe,

bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ;

bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo

mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.

Na esika ya soni na bino,

bokozwa litomba mbala mibale,

mpe na esika ya kosambwa,

bokosepela na libula na bino.

Boye, bokozwa litomba mbala mibale

kati na mokili na bino

mpe bokosepela mpo na libela.

Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo,

nayinaka moyibi mpe masumu ;

nakofuta bino na bolingo na Ngai

mpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino.

Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota,

mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ;

moto nyonso oyo akomona bino

akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.

Nakosepela makasi kati na Yawe,

molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai,

pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko

mpe azipi ngai na elamba ya bosembo,

ndenge mobandami ya mobali alataka

motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe

to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.

Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti

mpe elanga ebimisaka nkona na yango,

Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo

elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.