Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Banzembo 113

Moko te akokani na Nzambe

Bokumisa Yawe !

Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ;

bokumisa Yawe !

Tika ete Kombo ya Yawe epambolama

kobanda sik’oyo kino libela na libela !

Longwa na este kino na weste,

tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso,

nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso,

oyo avandi na Kiti ya Bokonzi

kati na bisika oyo eleki likolo ?

Agumbamaka mpo na kotala

likolo mpe mokili.

Wuta na putulu, atombolaka

moto oyo akelela ;

wuta na fulu ya matiti,

abimisaka mobola

mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,

na bankumu ya bato na Ye.

Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,

lokola mama ya esengo kati na bana na ye.

Bokumisa Yawe !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.