Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Masese 9

Feti ya Bwanya

Bwanya atongi ndako na ye,

atelemisi yango na makonzi sambo ;

abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino

mpe, na sima, atandi mesa.

Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela

wuta na basonge ya bangomba ya engumba :

« Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! »

Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :

« Boya kolia bilei na ngai

mpe komela vino oyo nakamoli,

botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi,

botambola na nzela ya mayele. »

Moto nyonso oyo apamelaka motioli

amilukelaka kosambwa,

moto nyonso oyo apamelaka moto mabe

amilukelaka ngambo.

Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ;

kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.

Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu

na bwanya koleka ;

teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

Pamba te, na nzela na ngai,

mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele,

mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.

Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali

mpo na litomba na yo moko ;

kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.

Feti ya liboma

Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele,

ayokaka te mpe azanga mayele,

avandaka na ekuke ya ndako na ye,

atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,

mpo na kobenga baleki nzela,

bato oyo bazali kokende na nzela na bango.

Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa !

Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli :

« Mayi oyo bayibi ezalaka elengi,

mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »

Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka,

mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.