Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Malashi 1
Koponama ya Isalaele
Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi.
« Ngai, nalingaki bino, »
elobi Yawe,
« kasi bino bozali kotuna Ngai :
‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? ›
Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? »
elobi Yawe,
« Nzokande, nalingaki Jakobi,
kasi nayinaki Ezawu ;
bongo nabongolaki bangomba na ye esobe
mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. »
Edomi akoki koloba :
« Ata babebisi mokili na biso,
tokotonga yango kaka lisusu ! »
Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Solo, bakotonga na bango yango,
kasi Ngai nakobuka yango !
Bakobenga mokili yango :
‹ Mokili ya makambo mabe,
bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›
Bokomona yango na miso na bino moko
mpe bokoloba : ‹ Yawe azali Monene
koleka ata bandelo ya etando ya Isalaele. ›
Mbeka oyo esengeli
Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›
Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? ›
Ezali tango bolobaka : ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. › Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo. Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe.
« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.