Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Yobo 3

Maloba ya Yobo mpe ya balingami na ye misato

Yobo alakeli mokolo ya mbotama na ye mabe

Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe. Yobo alobaki :

« Tika ete mokolo ya mbotama na ngai,

mpe butu oyo elobaki :

‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !

Tika ete mokolo yango ebongwana molili !

Tika ete, wuta na likolo,

Nzambe akanisa yango lisusu te !

Tika ete pole engengela yango lisusu te !

Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango !

Tika ete lipata ezipa yango,

mpe molili ebangisa pole na yango !

Tika ete molili makasi ekotela butu yango,

ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu

to kati na mikolo ya basanza !

Tika ete butu yango etikala ekomba,

ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !

Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe,

bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi,

balakela yango mabe !

Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili,

ezela na pamba tongo oyo ekotana

mpe emona kongenga ya tongo te.

Pamba te ekangelaki ngai te

bikuke ya libumu ya mama na ngai

mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye !

Mpo na nini namikufelaki te

kati na libumu ya mama na ngai ?

Mpo na nini nakataki motema te

tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?

Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ?

Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?

Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia,

nalingaki na ngai kokufa mpe kopema

elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili,

oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,

elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo

mpe batondisa palata kati na bandako na bango.

Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele

lokola zemi oyo esopani

to lokola mwana oyo atikala komona te

pole ya mokolo ?

Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato,

bato oyo balembi bazwaka bopemi,

bato ya boloko bazwaka kimia

mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.

Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna,

mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.

Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ?

Mpo na nini bomoi epesamelaka moto

oyo azali na pasi na motema ?

Bazelaka kufa, kasi eyaka te ;

nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,

balingaki kotonda na esengo mpe kosepela

soki bamoni kunda !

Mpo na nini bomoi epesamela moto

oyo nzela na ye ebombama,

moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?

Pamba te kolela ekomi bilei na ngai,

bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.

Makambo oyo nazalaki kobanga,

yango nde ezali kokomela ngai ;

oyo nazalaki koyokela somo,

yango nde ezali kosalemela ngai.

Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te

mpe nazangi bopemi ;

kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.