Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 56

Lobiko mpo na bikolo mosusu

Tala liloba oyo Yawe alobi :

« Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo,

pamba te lobiko na Ngai ekomi pene

mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.

Esengo na moto oyo asalaka bongo,

oyo akangamaka na yango,

oyo abatelaka mokolo ya Saba

mpe abebisaka te bosantu na yango,

mpe oyo abatelaka loboko na ye

ete esala mabe te ! »

Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te :

« Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! »

Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te :

« Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »

Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi :

« Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo,

oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba,

oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai,

mpe bakangamaka na boyokani na Ngai :

nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango,

ekaniseli oyo ezali na kombo :

ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi.

Nakopesa bango kombo ya libela,

oyo bakoki kolongola te.

Bapaya oyo bakangami na Yawe

mpo na kosalela Ye,

mpo na kolinga Kombo na Ye

mpe kogumbamela Ye,

bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba

mpe bakobebisa te bosantu na yango,

mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;

nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule

mpe nakopesa bango esengo

kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai.

Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango

ekondimama na etumbelo na Ngai,

pamba te Ndako na Ngai ekobengama

Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »

Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi :

« Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango,

esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »

Pamela ya Nzambe mpo na bato mabe

Bino banyama nyonso ya esobe, boya ;

bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia !

Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso,

bango nyonso bazangi mayele ;

bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te,

bakokaka koganga te,

mosala na bango kolala mpe kolota bandoto,

balingi pongi makasi.

Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te.

Bazali babateli oyo bazangi bososoli,

moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko

mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.

Moko na moko alobaka :

« Yaka ! Tika ete nakamata vino

mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga !

Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo,

masanga ya komela ezali nanu ebele ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.