Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 35

Kobima ya sika

Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela !

Tika ete esobe eyoka esengo

mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze !

Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela,

ekosepela mpe ekoganga na esengo.

Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli

mpe ya Saroni ekopesamela yango ;

boye bakomona nkembo ya Yawe,

lokumu ya Nzambe na biso.

Pesa makasi na maboko oyo elembi,

lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;

Loba na bato oyo bazali kobanga :

« Bozala makasi, bobanga te,

Nzambe na bino akoya,

akoya kozongisa mabe na mabe,

akoya na lifuti ya Nzambe.

Ye moko akoya kobikisa bino. »

Boye, bakufi miso bakomona

mpe bakufi matoyi bakoyoka.

Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko,

mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo.

Mayi ekobima na esobe,

mpe bibale, na bisika ya kokawuka.

Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi,

mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi.

Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi

mpe papirisi1 ekobota na bisika oyo

mbwa ya zamba elalaka.

Nzela moko ya monene ekoleka wana,

bakobenga yango Balabala ya Bosantu.

Moto moko te ya mbindo akoleka wana,

pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe.

Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.

Nkosi ekozala te na nzela yango,

ata nyama moko te ya mabe

ekoleka na nzela yango,

ekotikala komonana kuna te.

Kasi basikolami kaka nde

bakotambola na nzela yango.

Boye, bakangolami na Yawe bakozonga,

bakokota na Siona na nzembo ya elonga,

mpe esengo ya suka te ekozala

na likolo ya mito na bango lokola mitole.

Esengo mpe kosepela ekopesamela bango,

nzokande mawa mpe kolela ekosila.

Source notes (1)
  1. Footnote Papirisi ezali poso ya nzete oyo bato bazalaki kosalela na tango ya kala mpo na kokoma makomi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.