Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 24

Masakoli na tina na mbongwana oyo ekoya

Yawe akobebisa mokili

Tala, Yawe akobebisa mokili

mpe akokomisa yango lokola esobe ;

akokotisa mobulu kati na yango

mpe akopanza bato na yango.

Ekozala mpe kaka ndenge moko

mpo na Banganga-Nzambe mpe bato,

mpo na nkolo mpe mowumbu na ye,

mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye,

mpo na moteki mpe mosombi,

mpo na modefisi mpe modefi,

mpo na moto oyo bakofuta ye niongo

mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.

Mokili ekobebisama penza nye

mpe bakopanza yango nyonso.

Yawe nde alobaki yango.

Mokili ezali na matanga mpe ekawuki,

mokili mobimba ebebi mpe ekawuki ;

ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili !

Bato ya mokili bakomisi yango mbindo,

bazali kotosa mibeko te ;

banyati-nyati bikateli

mpe babuki boyokani ya seko.

Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ;

bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango.

Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa,

mpe ndambo moke kaka nde etikali.

Vino ya sika ezali na matanga,

elanga ya vino ekawuki ;

bato nyonso oyo bamesana na esengo

bakomi kolela na pasi.

Esengo ya mbonda esili,

makelele ya bato ya biyenga esili,

esengo ya lindanda esili ;

komela vino etikali lisusu na banzembo te,

masanga ya makasi ekomi bololo

mpo na bato oyo bamelaka yango.

Engumba oyo ebeba etikali pamba,

bikuke ya bandako nyonso ekangami.

Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te,

kosepela nyonso ebongwani molili,

esengo nyonso elongwe na mokili.

Libebi kaka nde etikali kati na engumba,

babuki-buki bikuke na yango na biteni.

Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo

ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete

to tango balokotaka bambuma ya vino

soki basilisi kobuka yango.

Bamoko bakotombola mingongo na bango

mpe bakoganga na esengo ;

wuta na weste ya mayi monene,

bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.

Yango wana, kuna na ngambo ya este,

bopesa nkembo na Yawe ;

bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele,

kati na bisanga ya ebale monene.

Wuta na suka ya mokili,

tozali koyoka banzembo :

« Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. »

Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka !

Mawa mpo na ngai !

Bazoba bateki mboka, na bozoba penza,

bazoba bateki mboka ! »

Oh bato ya mokili,

somo, libulu mpe motambo

ezali kozela bino.

Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo

akokweya na libulu,

mpe oyo akoluka kobima kati na libulu

akokangama na motambo.

Maninisa ya likolo esili kofungwama,

makonzi ya mokili ezali koningana.

Mokili ebukani-bukani,

mokili epanzani,

mokili eningani makasi.

Mokili ekomi kotenga-tenga

lokola moto oyo alangwe masanga,

ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti.

Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye,

esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.

Suka mpe ebandeli

Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu

na mampinga ya lola kuna na likolo,

mpe na bakonzi ya mokili na se.

Bakosangisa bango elongo kati na libulu

ndenge basangisaka bakangami na boloko,

bakokangela bango na boloko

mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.

Sanza ekokoma motane,

mpe moyi ekoyoka soni,

pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga,

akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi,

liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.