Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 18

Maloba ya kosambisa Etiopi

Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa

oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki,

bongo enanaka na ebale ya Kushi !

Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale

kati na bamasuwa oyo basala na papirisi,

na likolo ya ebale monene !

Bino bapanzi sango ya mbangu,

bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi

mpe baposo ya nzoto na bango engengaka,

epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika,

bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,

mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.

Bino nyonso, bavandi ya mokili,

bino oyo botondisi mabele,

tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ;

tango bakobeta kelelo, bokoyoka !

Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai :

« Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai,

lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »

Mpo ete liboso ya kobuka bambuma,

tango bafololo ya mike etikaka kobima

mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela,

bakataka bitape na likwangola,

babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.

Bakosundola yango epai ya bandeke

oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba

mpe epai ya banyama ya zamba.

Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge

mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.

Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,

wuta epai ya ekolo ya bato milayi

oyo poso ya nzoto na bango engengaka,

wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika,

bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,

mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango,

bakomema bakado yango na ngomba Siona,

esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.