Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 15

Maloba ya kosambisa Moabi

Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi :

Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki,

Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki,

solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ;

solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

Bato ya Diboni bazali komata

na bisika na bango ya bule,

na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba,

mpo na kolela ;

Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba.

Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.

Balati-lati basaki na babalabala,

bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako

mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;

bazali penza kosopa mpinzoli ebele.

Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi,

mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ;

yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga

mpe mitema na bango ebukani.

Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi,

banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari,

kino na Egilati-Shelishiya ;

bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ;

mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga

mpo na kobebisama na bango.

Mayi ya Nimirimi ekawuki,

bongo matiti mpe esili kokawuka,

matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso

mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.

Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki

mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.

Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ;

koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi,

mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.

Mayi ya Dimoni etondi na makila,

kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni :

nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.