Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Ezayi 12

Nzembo mpo na kokumisa Yawe

Na mokolo wana, okoloba :

« Oh Yawe, nazali kosanzola Yo,

pamba te ata osilikelaki ngai,

kanda na Yo elongwaki likolo na ngai

mpe obondisaki ngai !

Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ;

nakotia elikya na ngai epai na Ye

mpe nakobanga lisusu te.

Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;

azali lobiko na ngai. »

Yango wana, botoka mayi na esengo

na etima ya lobiko.

Na mokolo wana bokoloba :

« Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye,

bosakola misala na Ye kati na bikolo

mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.

Boyemba loyembo mpo na Yawe,

pamba te asali makambo ya kokamwa.

Tika ete mokili mobimba eyeba yango !

Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo,

pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.