Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Oze 11

Bolingo na Nzambe mpo na Isalaele

Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye,

mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.

Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye,

tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai.

Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka

mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.

Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi

ndenge ya kotambola ;

namemaki bango na maboko na Ngai,

kasi basosolaki te

ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.

Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ;

nalongolaki bango ekangiseli na bakingo

mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.

Lokola baboyi kozonga epai na Ngai,

bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te,

kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.

Mopanga ekokota na bingumba na bango,

ekobuka bikangelo ya bikuke na bango

mpe ekosukisa mabongisi na bango.

Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo.

Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo,

moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.

Bolingo ekolonga

Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ?

Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ?

Mpo na nini nasala yo makambo

oyo nasalaka engumba ya Adima ?

Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo

lokola engumba ya Tseboyimi ?

Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai

mpe natondi na mawa makasi.

Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi,

nakobebisa lisusu Efrayimi te.

Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te !

Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ;

nakoya lisusu na kanda te.

Bakolanda Yawe !

Yawe akoganga lokola nkosi.

Tango akoganga,

bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.

Bakoya na kolenga

lokola bandeke wuta na Ejipito,

lokola bibenga wuta na Asiri.

Nakovandisa bango na bandako na bango,

elobi Yawe.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.