Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
Oze 1
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :
Ndimbola ya libala ya mosakoli Oze
Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye :
— Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.
Boye, Oze akendeki kolinga Gomeri, mwana mwasi ya Dibilayimi. Gomeri akomaki na zemi mpe abotelaki ye mwana mobali. Yawe alobaki na ye :
— Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele. Na mokolo wana, nakobuka tolotolo ya Isalaele kati na lubwaku ya Jizireyeli.
Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze :
— Pesa ye kombo Lo-Rukama1, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te. Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.
Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki :
— Pesa ye kombo Lo-Ami2, pamba te bozali bato na Ngai te, mpe Ngai nazali Nzambe na bino te.
Source notes (2)
- Footnote Lo-Rukama elakisi : ye oyo balingaka te
- Footnote Lo-Ami elakisi : bato na Ngai te
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.