Skip to content
BibleKenya

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

Kobima 17

Mayi ebimi na libanga

Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato. Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye :

— Pesa biso mayi ya komela !

Moyize azongiselaki bango :

— Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?

Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki :

— Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?

Moyize abelelaki Yawe :

— Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga !

Yawe azongiselaki Moyize :

— Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende. Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela.

Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele. Abengaki esika yango Masa1 mpe Meriba2, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »

Bana ya Isalaele balongi bato ya Amaleki

Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi. Moyize alobaki na Jozue :

— Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.

Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba. Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga. Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa. Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.

Yawe alobaki na Moyize :

— Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.

Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. » Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »

Source notes (2)
  1. Footnote Masa elingi koloba : komeka.
  2. Footnote Meriba elingi koloba : koswana.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.

Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.

BibleKenya

Reader settings

Theme
Font
Alignment
Reading width

Saved in this browser and used offline too. Press ? for keyboard shortcuts.