Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi
1 Bakolinto 13
Bolingo
Soki nalobi nkota ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kobeta to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele. Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba. Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko. Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa. Pamba te toyebaka kaka moke, mpe tosakolaka kaka moke. Kasi tango kokokisama ekokoma, oyo ezali moke ekolimwa.
Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke ; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.
Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.
Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela : kondima, elikya mpe bolingo ; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi. Copyright © 2020 Biblica, Inc. Licensed under CC BY-SA 4.0. “Biblica” is a trademark registered in the United States Patent and Trademark Office by Biblica, Inc. Source: eBible.org. Typeset from the source files; no intended changes to scripture wording. BibleKenya is not endorsed by the rights holder.
Full source notice & licence · CC BY-SA 4.0 · SourceEdition imported 2026-10-25.